Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi apesi nkondo cardinal Monsengwo palata ya bilombe Kabila-Lumumba


Sanduku ya nzoto ya nkondo cardinal Laurent Monsengwo Pasinya na etando ya Palais du Peuple, Lingwala, Kinshasa, RDC, 20 juillet 2021. (Facebook/Pr♪0sidence RDC)
Sanduku ya nzoto ya nkondo cardinal Laurent Monsengwo Pasinya na etando ya Palais du Peuple, Lingwala, Kinshasa, RDC, 20 juillet 2021. (Facebook/Pr♪0sidence RDC)

Président Tshisekedi apesi na nkondo cardinal Laurent Monsengwo Pasinya palata ya Grand cordon ya ordre national ya Bilombe ya ekolo Kabila-Lumumba, mpo na misala episkopo oyo asalaki na mboka. Cardinal Monsengwo akufaki le 11 juillet na France na mibu 81.

Mokonzi ya mboka atikaki palata ya lokumu yango likolo lya sanduku ya nzoto ya cardinal Monsengwo oyo etiami mpo na losako ya suka mardi na Palais du peuple, ndako ya Parlement.

Président Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville, lokola mpe Nonce apostolique, ba cardinaux, b’episkopo ya bikolo bya Afrika, mpe bakambi ba biyamba misusu ya continent mpe ya mboka bazalaki na milulu myango.

Cardinal Monsengwo azalaki kozongisa bayi politiki na nzela na mpamela mingi.

Papa wa Roma apesaki ye lokumu mpo na bitumba bya ye na ntina na sembo mpo bolamu ya bana ba mboka na ye mpe ya Afrika.

Cardinal Monsengwo akambaka Conférence nationale souveraine mpe Parlement ebimaki na yango.

Azalaki mpe moko na bayi mbulamatari ya Roma na curie romaine.

Nzoto ya cardinal Monsengwo azongisamaki o’mokolo mwa eyenga le 18 juillet nsima na liwa lya ye na Verssailles na France le 11 juillet epayi amemaki na lombango mpo na lisalisi. Azalaki na mibu 81.

Mgr Monsegnwo akelamaki cardinal na Papa Benoit XVI le 20 novembre 2010.

XS
SM
MD
LG