Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bozongisami ya bitiki ya nzoto ya Lumumba botindami na juin


Ministre wa Yambo ya Congo-Belge Patrice na mobembo mw aye na Maroc, le 08 août 1960 . / AFP PHOTO
Ministre wa Yambo ya Congo-Belge Patrice na mobembo mw aye na Maroc, le 08 août 1960 . / AFP PHOTO

Bakonzi ba RDC batindiki lisusu na juin milulu mya bozongisami wuta Belgique ya bitiki ya nzoto ya nkondo Patrice Emery Lumumba, ministre wa Yambo ya yambo ya mboka.

Milulu mya bozongiseli mpe bonzongisi ya bitiki ya nzoto ya ministre wa Yambo ya kala Patrice Lumumba mipusani na sanza ya motoba mokoya, pene na bokanisi ya lipanda ya RDC, le 30 juin, elobi na AFP moko na bapesi toli ya mokonzi ya mboka RDC, Félix Tshisekedi.

Bopusi boye bozali mpo na makambo mingi, ebaki mosungi ya M. Tshisekedi.

Kati na makambo mango, ezali bongo mikano ya bopekisi mpo na COVID-19.

Bozongisami ya linu liye moko na bakambi ba police ya Belgique alobaka abombaka mpe amemaka na Belgique nsima na bobomi ya M. Lumumba na Haut-Katanga na janvier 1961, botindikama mbala mingi.

Esengelaki esalama na janvier 2022 yambo na bokanisi mokolo liwa lya M. Lumumba lisakolamaki

Le 17 janvier 1961 nde liwa ya M. Lumumba esakolamaki.

Yambo na yango, M. Lumumba akangamaki mpe anyokolamaki.

XS
SM
MD
LG