Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mbusa Nyamwisi azongi mboka


Antipas Mbusa Nyamwisi mokambi ya RDC/KML, na Kinshasa, le 13 juin 2007
Antipas Mbusa Nyamwisi mokambi ya RDC/KML, na Kinshasa, le 13 juin 2007

Antipas Mbusa Namwisi, moko na bakambi ya lingomba Lamuka mpe motambwisi ya RCD/KML azongi na mboka Congo démocratique nsima kokima o'libanda mibu

Akomi na Kinshasa lelo mokolo le 31 mai.

Akimaki mboka banda 2012 mpo atelemelaki mokonzi ya kala Joseph Kabila na komimonisa mpo mandat ya misato na maponami ya presidentielle.

Mbusa Nyawisi azali moko na bakambi ya lingomba Lamuka. Alobaki mikolo mileki ete azwaki malako ya président ya sika Felix Tshisekedi mpo na bokengi na ye mpe akokaki kozela kozonga te.

Nzokande Jean-Pierre ya MLC, mokambi mosusu ya Lamuka ya nde azongi na sanza ya motoba moye mokobanda lobi eyebisi baye ya lisanga MLC.

Tokundola été Moise Katumbi ya Ensemble mpe lingomba nse moko wana ya Lamuka azongaki na mboka Congo le 20 mai.

XS
SM
MD
LG