Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mbulamatari ewangani 6 millions $ mpo na milulu ya le 24 janvier


Milulu ya bolakisi mabongisi ya mobu moko ya mbongwana na RDC, Kinshasa, 19 décembre 2019. (VOA)
Milulu ya bolakisi mabongisi ya mobu moko ya mbongwana na RDC, Kinshasa, 19 décembre 2019. (VOA)

Mbukanatari ya ekolo Congo démocratique ewangani ete 6 millions ya ba dollars ekobimisama mpo na milulu ya kokanisa mobu moko ya mbongwana ya bokambi mboka le 24 janvier 2019.

"Etikala kolobama te ete tokopesa misolo mingi miye ya 6.000.000 $US mpo na milulu miye . Evénement eye etaka lisolo ekokanisma na komikitisa nyonso," elobi ministre ya Sango, Jolino Makelele, molobeli ya mbulamatari.

Kolanda maloba maye, mbulamatari etali makoki mike ezali na yango mpe mpasi bato mingi bazali kobika na yango kati na mboka RDC.

"Ekozala na losambo ya kotonda Nzambe na etando mobimba ya ekolo. Ekozala libaku ya kosala bolamu na bana mboka baye bazali na mpasi," ebeti mokoloto M. Makelele.

Nzoka nde, Commission préparatoire esakolaki o’mokolo ya jeudi (mikolo mibale mileki) ete misolo 6 millions ya ba dollars nde mikotiama mpo na milulu yango.

Ndenge moko mpe, Ministre près ya président ya république, André Kabanda Kana, alobaki ete lokosa yango (ya 1.000 FC symbolique) lozali kosalama mpo na milulu ya kokanisa mobu moko ya mbongwana na ekolo Congo démocratique o’mokolo ya le 24 janvier 2020.

"Ekozala lolaka monument ekobombama na Banque centrale kasi ekozala na valeur nominale to valeur d’achat (ekoka te kosomba biloko). Ekozala 'lokosa colleteur' mpo na kotika elombo ya maye masalaki. Ekozala na monument ya mbongwana na ekolo. Ekolakisama na bana mboka. Tobengi yango bongo mpo ekozala mpo bato babomba yango," elimbolaki vice-ministre ya budget Félix Momat.

Billet collecteur ekozala na bilongi ya président ya kala Joseph Kabila mpe na mokitani wa ye Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika.

Billet yango ekozala na mpifo ya kosomba biloko kasi ekozala elembo. Ekotekama mpo na kobombama.

Sango yango ememaki nkanda ya bato mingi. Mingi kati na bayi politiki mpe ya société civile balobi mosolo eleki mingi mpe baboyi ete bilongo ya bakonzi babale baye, ya kala nay a sika, bityama na lokosa ya mbongo ata yango ekozala kaka ya eleombo.

Esali mobu uto mokonzi ya kala Joseph Kabila atikelaki bokonzi na Félix Tshisekedi nsima na bosakolami na ye lokola molongi ya maponami ya le 30 décembre 2018.

XS
SM
MD
LG