Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo atiami na "résidence suruveillée" to na bokangami kasi na ndako na ye


Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.

Augustin Matata Ponyo Mapon, ministre wa Yambo Kala ya Ekolo Congo démocratique atiami na résidence surveillée to bokangami kasi na ndako na ye, elobi boko na bayi nzinga nzinga na ye.

Basambeli ba ye mpe baye ya bofundi bazalaki liboso lya bazuzi nsima na Bureau ya Senat kolongola bobatelami bwa ye mpo na likambo lya misolo mya Zairianisation.

M. Matata azalaki koyanola na Cour constitutionnelle wuto lundi.

Kasi basambeli ba ye bazalaki nde na Conseil d’Etat mpo na kosenga boboyi bwa mokano ya Bureau ya Sénat ya kolongola bobombami bwa ye bo’ sénateur.

Bureau ya Sénat ezwaki mokano mwango nsima na ba Sénateurs koboya na likita linene kolongola bobateli bwa M. Matata na bofundi botali parc Agro-industriel ya Bukanga Lonzo.

M. Matata afundami mpe akangami mbala eye mpo na bopengwisi misolo misengelaki kozongiselama na bato 300 mpo biloko bya bango bibotolamaki ntango ya Zaïrianisation.

Mokano mokpesa nsima soki akolekisa bobakami bwa ye na ndako to na boloko.

XS
SM
MD
LG