Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo afundi mokambi ya IGF Jules Alingete


Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.

Matata Ponyo, Ministre wa Yambo ya kala ya RDC oyo afundami mpo na 300 millions $ ya parc agro-industriel ya Bukanga Lonzo, afundi ye mpe lokola mokambi ya Inspection ya Finances (IGF), Jules Alingete keyi.

Moko na ba avocats ya M. Matata, Me Safari Mulume alobi bamemi makambo epayi ya procureur ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe mpo na maye IGF ekoma na rapport na yango mpo na misolo mya Bukanga Lonzo.

M. Matata akataka mobembo mwa ye ya mosala na Conakry, na Guinée, mpe alobaki ete azali kobang ate mpo IGF ekomaki makambo malokuta na rapport na yango.

IGF efundaki M. Matata mpo na 300 millions $ ya misala mya Bukanga Lonzo misala mibota mbuma ya malonga te.

M. Matata akundolaka mbala mingi ete ye nde asengaki IGF kosala bolukiluki na 2020 mpo etali Bukanga Lonzo.

Sénat ewuti kobwakisa bosenga ya Cour constitutionnelle ya kolongola bobateli to immunité ya M. Matata mpo esengeli nde asamba na Cour ya cassation mpe esengeli Cour ya cassation nde esenga bolngoli ya bobateli bwango.

XS
SM
MD
LG