Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénat ebwakisi bosenga ya kolongola immunité to bobateli ya Matata Ponyo


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Sénat ya RDC ebwakisi bosenga ya Cour constitutionnelle ya kolongola bobateli to immunité ya Ministre wa Yambo ya kala Matata Ponyo, moko na ba sénateurs, na likita lisalamaki na huis clos to libanda na bapaya banso.

Ebwaikisi mpe bosenga ya kolongola immunité ya moyi Sénat Kamonji Naserwa.

"Tozongisela Cour constitutionnelle mokanda na ye mpo na mbeba ezalaki na kati," elimboli moko na ba sénateurs na VOA Lingala.

Moyi Sénat oyo alobi ete Cour constitutionnelle etindaki mikanda mbala mibale.

Ya yambo esengaki Congrès nde elongola immunité ya Matata Ponyo mpe ya Kamonji mpo basambisama na Cour constitutionnelle.

Cour constitutionnelle esengaki na mokanda ya mibale ete Sénat nde elongola bobateli yango mpo asamba na Cour ya cassation.

"Tolobi ete esengeli bongo Cour ya cassation nde etinda mokanda mwango mpo Sénat etala likambo lyango," elimboli moko na bayi Sénat.

Matata Ponyo azelami na Cour ya cassation mpo asamba na bofundi ya Inspection générale ya finances (IGF) mpo na millions nkama misato ya ba dollars (300 millions) ya parc agro-industriel ya Bukanga Lonzo.

XS
SM
MD
LG