Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénat eboyi kolongola ba immunités ya Matata na Kamonji Naserwa


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Sénat eboyi kolonogla bobateli ya ba sénateurs Augustin Matata Ponyo na Ida Kamonji Naserwa basengamaki na procureur général ya Cour constitutionnelle mpo kosamba na likambo lya parc agro-industriel Bukanga Lonzo.

Na maponami masalamaki na ba sénateurs, 49 baboyi ete bobateli ya M. Matata bolongolami, mpe 46 nde bandimi.

Sénateur moto nde andimi to aboyi te.

"Ezali makoki ma ba Sénateurs ya koboya kolongola bobateli to bosambisama ndenge procureur général asengi. Ezali mingi mpo na kobatela mpe kopesa maboko na bosolo," elobi M. Matata kotatola ete ayebi eloko, na lisikulu na ye yambo na ba sénateurs.

Ministre wa Yambo ntango ya bobandisami ya Bukanga Lonzo, M. Matata alobi azwa ata meya moko te ya misala mya Bukanga Lonzo.

Ndenge moko mpe mpo na Mme Kamonji.

Ba sénateurs 51 baboyi mpe 45 bandimi.

M. Matata afundama na Inspection générale ya finances (IGF) na mokmbua ya misolo mizala mpo na Bukanga Lonzo miye mibota mbuma te.

Mokambi ya IGF, Jules Alingete mpe apamelaka M. Matata na kopona compagnie ya Afrique du Sud AFRICOM na ndenge elandaki mibeko te.

Ndenge moko mpe, millions sambo ya dollars ya bosombi ndako ya mosla ya Bukanga Lonzo botiamaka na mokongo ya M. Matata.

Sénatrice Kamonji nde azalaka mokambi ya Pargagri S.A. moko na ba copagnie kati na Bukanga Lonzo.

IGF epamelaka Mme Kamonji na kofunda te bobengwisi misolo.

XS
SM
MD
LG