Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bureau ya Sénat elongoli bobatelami ya sénateur Matata mpe endimi alendelama


Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala mpe Sénateur, na Kinshasa, RDc, 13 avril 2015.

Bureau ya Sénat endimi lundi kolongola bobatelami (immunités) ya ministre wa Yambo ya kala mpe sénateur Augustin Matata Ponyo mpe epesi ndingisa ete alendelama.

Bureau ya Sénat esanganaki na likita libanda lya session ya mars, kolanda ndingisa Cour Constitutionnelle epesaki yango mpe kolanda mibeko ya botambwisi na yango.

"Nsima na kotala, Bureau, na kolanda maye Buku likonzi ekoma mpe mibeko ya botambwisi ya Sénat, ezwi mokona, na boponi, ya kopesa nzela na bolandelami ya sénateur Augustin Matata Ponyo Mapon mpe ya kolongola (ye) bobatelami ya bayi parlement," emonisi liyebisi litiami manza na président ya Sénat Modeste Bahati Lukwebo na molobeli ya Sénat Michel Kanyimbu Shindany.

Mokano ya Bureau mokweyi na bokeseni ya mokano ya likita ya ba Sénateurs banso baye baboyaki na motango ya koleka, mposo moko na ndambo moleki, ete M. Matata alendela na bosenga ya yambo ya Cour constitutionnelle.

Bureau ya Sénat eyandoli nde na bosenga ya mibale ya Cour constitutionnelle eye elingi kosambisa M. Matata, mabala eye, mpo na misolo koleka 110 millions $ mipesamaka mpona bato babotolamaki biloko na Zaïrianisation.

Bosenga ya yambo ya Cour contitutionnelle botalaki bopengwisami ya misolo pene na 300 millions $ ya misala ya parc agro-industriel ya Bukanga Lonzo.

Na eyano na ye lundi, M. Matata ayebisaki Bureau ya Sénat ete mposo moko asengaki mpo na kopesa eyanoezalaki moke mpo ministre ya Finances mpe Office ya nyongo ya ekolo (ODEP) bapesaki ye te mikanda azalaki na yango mposa mpo na kopesa biyano.

Bureau ezwi mokano nsima na eyano eye.

XS
SM
MD
LG