Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata aboyi koyanola na mandat d’amener ya Procureur général Mukolo


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Ministre wa Yambo ya kala kala oyo azali lelo Sénateur, Augustin Matata Ponyo aboyi koyanola na "mandat d’amener" to mokanda ya komema ye motinamaki na procureur général ya République, Jean-Paul Mukolo.

"Engebene na Buku Likonzi, na koyanolaka soki moke te na mandate d’amener illégal (eye ebuki mibeko) ya PG Jean-Paul Mukolo oyo atosi te mokano ya Sénat eye epesi te ndingisa na misala mya bosembo ya kolandela ngai mpo na likambo lya Bukanga Lonzo. Nazali na bosenga ya kozongela ba immunités na ngai mpe bonsomi na ngai ya kotambola," ekomi M. Matata na Twitter na ye.

M. Matata akomi makambo ma ye nsima baye batindamaki kokanga ye bakitaki na ndako na ye mpe babukaki mpo na koluka komema ye. Kasi ba avocats ba ye baboyaki na makasi.

“Pene na basoda zomi bakitaki na ndako na Matata Ponyo na officier moko, bazalaki na mandat d’amener. Ba avocats ya Matata Ponyo baboyaki akende mpo Sénat esi ebwakisaki bosenga ya procureur mpo na likambo lya Bukanga Lonzo. Basoda bango bakotaki na makasi mpe babukaki kino porte ya chambre na ye kasi bazwi ye te," eyebisi molobeli na ye Floride Nzatoto.

M. Nzatoto alobi ete mbeba esusu esalami te kasi bana mpe mwasi ba M. Matata batikali na traumatisme to babangi.

Inspection générale ya Finances (IGF) efundaki M. Matata mpo na likambo lya parc agro-industriel ya Bukanga Lonzo eye ebimisa eloko te nsima na mbulmatari koti pene na 300 millions ya ba dollars mpo na kokela yango.

M. Matata atikamaki mposo mileki nsima na kotiama na bokangami mpo na koyanola na bayi bosembo na likambo litali misolo mipesamaki na bato biloko bya bango bibotolomaki ntango ya zaïrianisation.

Ye moko M. Matata akomi ete basoda babukaki mpe bakotaki ata na chambre esika azalaki na kopema mpo na lisalisi lya nzoto mpe bamekaki komema ye na makasi kasi aboyaki.

XS
SM
MD
LG