Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis epesi 50 respirateurs mpo na COVID19 na RDC


Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer (G) na ministre ya Boyokani na molongono ya RDC, Guillaume Manjo, na milulu mya bopesa 50 respirateurs ya Etats-Unis na Kinshasa, 23 septembre 2020. (Ambassade ya Amerika)
Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer (G) na ministre ya Boyokani na molongono ya RDC, Guillaume Manjo, na milulu mya bopesa 50 respirateurs ya Etats-Unis na Kinshasa, 23 septembre 2020. (Ambassade ya Amerika)

Etats-Unis epesi bisaleli bisungaka bakoni kopema to respirateurs tuku mitano na RDC mpo na kosunga RDC na bitumba na COVID19.

Ntoma ya Amerika, Mike Hammer, ayebisi ete biselali biye ya bisamami na socieite Vaire Medical ya Amerika bisengali bisunga bana mboka bisika mingi na Ekolo.

"Lelo nazalaki na esengo ya kopesa ministre ya Coppération ya RDC Guillaume Manjo ba respirateurs ya malamu mpenza. Bisaleli bya kobikisa bomoi biye bisalemi na copmagnie ya Amerika Vyaire Medical bikotiama mpo na kosunga babeli ba COVID19 mpe basusu baye bazali na bokono ya mpema," ekomi ntoma Hammer na compte Twitter na ye.

Nzoka nde, comité multisectoriel ya bitumba na COVID19 eyebi été bato basika 14 bayebani kozwama na bokono boye mardi.

RDC ekomi na bato 10.537 bayebani kozwama na COVID19.

Bato 10.041 bakikisami mpe 271 bakufi.

Etats-Unis ezali ekolo ya yambo esungaka koleka RDC na bitumba na COVID19, Ebola mpe misusu.

Ntoma Hammer na Guillaume Manjo basololaki mpe etali "600 millions $ ya lisungi ya Etats-Unis na nzela ya boyokakani bolamu mpe bosenga bwa kosala mosala elongo mpo na kobutisa kaniaka mpe lisungi lya lipesi maboko na mposa ya ban aba RDC," ebakisi ntoma Hammer.

XS
SM
MD
LG