Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basali sambo ya bitumba na Ebola batindami na bazuzi mpo "mombongo" na nsima na bokono boye, elobi Dr. Eteni


Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga (C), ministre ya santé Dr Eteni Longondo (2e G), mokambi INRB mpe ya cellule ya COVID Dr. Jean-Jacques Muyembs (G) na bofungolami ya ndako ya sika ya INRB, Kinshasa, 22 février 2020. (Facebook/INRB)
Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga (C), ministre ya santé Dr Eteni Longondo (2e G), mokambi INRB mpe ya cellule ya COVID Dr. Jean-Jacques Muyembs (G) na bofungolami ya ndako ya sika ya INRB, Kinshasa, 22 février 2020. (Facebook/INRB)

Basali sambo ya bitumba na Ebola na Mbandaka, na Equateur, batindami na bazuzi na mikano ya kobundisa "mombongo na nzima ya bokono", elobi ministre ya Bokolongono, Dr. Eteni Longondo.

Dr. Eteni asakoli na liyebisi ete bolukiluki bozali kosalama mpo na kosukisa mombongo na nsima ya Ebola.

Mposo moleki, ba ntoma ya Etats-Unis, Canada mpe Royaume Uni bapamelaki kaniaka mpe moyibi bakutaki kosalama na bitumba na Ebola ya mbala zomi ezali kongala na Equateur esika wapi balekisaki pene na mposo moko.

"Bana ba RDC balembi kaniaka," ekomaki na liyebisi ban toma baye.

Koleka bato 60 bakufi na Ebola na Equateur mpe bato 134 nde bayebani kozala na yango.

"Na Mbadaka, bato 4.000 batindamaki mpo na Ebola kasi na esika ya mosala bazalaki kaka 120. Mpo na nini bato 4.000 ?" emitunaki na Top Congo ntoma ya Canada, Nicolas Simard.

Nkombo ya "mombongo ya Ebola" ebengamaki na Ebola ya mbala 10 engalaki na monyele epayi wapi bato 2.000 bakufaki na pene na mibu mibale.

Etats-Unis epesa 600 millions $ mpo na kobundisa Ebola na monyele ya RDC, yango nde Ebola ya mibale na makasi koleka na lisitwale na mokili.

Royaume Uni nde epesa 250 millions $ mpe Canada, 135 millions $.

XS
SM
MD
LG