Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami ya Kamerhe na basusu bozongeli na zuzi mokambi ya sika


Zuzi Pierrot Bankenge Mvita azali kokamba bosambisami bwa Vital Kamerhe, Samih Jammal na Jeannot Muhima na boloko ya Makala CPRK, Kinshasa, 3 juin 2020. (Capture d'écran/VOA)
Zuzi Pierrot Bankenge Mvita azali kokamba bosambisami bwa Vital Kamerhe, Samih Jammal na Jeannot Muhima na boloko ya Makala CPRK, Kinshasa, 3 juin 2020. (Capture d'écran/VOA)

Bosambisi mpo na botongami ya ndako nkoto moto na ndambo mpo na mikolo nkama mya yambo ya président Félix Tshisekedi bozongeli mercredi nsima na liwa lya mbalakaka mposo moleki ya zuzi mokambi Raphaël Yanyi Ovungu.

Zuzi mokmabi ya sika oyo atiyamaki, Pierrot Bankenge Mvita nde azali kokamba bosambisami.

Banzeneke bababandi koyonala na mituna mya zuzi mokonzi ya bosamabisami.

Justin Bitakwira, ministre ya kala développement rural nde azalaki monzeneneke ya yambo ya koyanola, kasi basembeli ya M. Kamerhe baboyaki ye aloba kaka mpo na litatoli lya mpamba.

Zuzi Bankenge asengaki ye alobi na nse ya ndayi.

Vital Kamerha, mosungi mpe mokambi ya kala ya ndako ya misala mya president Félix Tshisekedi, Jeannot Muhima mpe Jammal Sammy Jammal bayanolaki yambo na mituna ya ba zuzi mpe ya bafundi.

XS
SM
MD
LG