Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Massaro" Daniel Shangalume aboyi koyanola na parquet mpe atindami Makala


Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.
Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.

Daniel Shangalume Kingi oyo ayebani na nkombo ya "Massaro" aboyaki koyanola na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa-Matete. Atindami na boloko ya Makala (CPRK) na kozela bosambisami.

Procureur général ya Cour d’appel ya Matate alobi ete M. Shangalume allias "Massaro", mwana ya ndeko ya Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya kala ya président Félix Tshisekedi, atikalaki kofongola monoko te ntango atunamaki mituna na parquet.

Parquet etindi ye, mpo na yango, na tribunal mpe etie ye na bokangami na Makala, yambo na bosambisami, elobi radio Okapi.

"Massaro" afundami na kopengwisa misolo mya botongi mpo na mikolo nkama mya yambo mya bokonzi ya Félix Tshisekedi, elongo na noko na ye M. Kamerhe na Jammal Samih, nkolo compagnie Samibo, na Jeannot Muhima mosungi M. Kamerhe.

"Massaro" akangamaki vendredi eleki na Kenge na etuka ya Kwango esika azalaki kokima mpo alukamaki na misala mya bokengi.

Alimwaki mpo na pene mposo misato wuto abengisamaki na parquet ya cour d’Appel ya Kinshasa-Matete mpo na koyanola na likambo lya misolo miye.

XS
SM
MD
LG