Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Manu Dibango akufi na COVID-19


Manu Dibango, saxophoniste Camerounais mpe alanga nzembo, akufi na Paris, France le 24 mars 2020. (Photo 26 novembre 2005)
Manu Dibango, saxophoniste Camerounais mpe alanga nzembo, akufi na Paris, France le 24 mars 2020. (Photo 26 novembre 2005)

Manu Dibango, saxophoniste Camerounais mpe nganga na mindule ya Afro-Jazz, akufi na France na coronavirus ya sika COVID-19.

Azalaki na mibu tuku mwambe na motoba.

Sango ya liwa lya ye esakolami na mokambi ya ndako ya edition ya miziki na ye, Thierry Durepaire.

Manu Dibangu ayebanaki mingi mpo na world music wuto asalaki palata "Soul Makosa".

Ndambo ya nzembo ezwamaki na Michael Jackson mpe bakendaki na bazuzi.

Manu Dibango alongaki mpe afutamaki.

Kasi na misala mya ye mindule alekaki mpe na ekolo Congo démocratique epayi wapi abetaki na ba nganga ya mindule misusu lokola Rochereau Tabu Ley, Kale Joseph, Nico Kasanda, Sam Mangwana mpe basusu.

XS
SM
MD
LG