Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Macron ayebisi Tshisekedi ete asepeli ndenge makambo mazali kokende na RDC


Président Félix Tshisekedi ayambami na mokokani wa ye ya ekolo France Emmanuel Macron na ndako ya bokonzi Elysée, Paris, 11 novembre 2019. (Facebook/Présidecene RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambami na mokokani wa ye ya ekolo France Emmanuel Macron na ndako ya bokonzi Elysée, Paris, 11 novembre 2019. (Facebook/Présidecene RDC)

Président Emmanuel Macron ya France ayebisi mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi ete asepeli ndenge makambo mazali kokende na Congo. Bakonzi babale basololi mercredi na nzela ya singa mpo na matata mazali na Ekolo Congo démocratique mpe Union africaine.

"Président Emmanuel Macron a alkisi esengo na ye na lolenge makambo mazali kokende na RDC mpe alobi azali kopesa maboko na Congo eye ezali démocratique mpe ya kolukisama," ekomi présidence ya RDC.

Bakanzi babale basololi ntango lisikulu lya président Tshsisekdi lizali kozelama nsima na misala mya koyoka bato mposo misato asilisaki mposo moleki.

M. Tshisekedi abengisaki boyoki bato mpo na kokela liboke liya sika nsima na komona ete boyokani ya bokambi mboka na ngambo ya mokonzi ya kala Joseph Kabila bozili kotambola te malamu te.

"Président Emmanuel Macron alobi azali kolanda na bokebi mpe na esengo makasi président Tshisekedi azali kosala mpo na komema RDC o’liboso mpe alobi azali ya kobongama na lisanga ya Union africaine na Union européenne na ntina ya kosunga mpo na ntombwa ya Afrika," elobi M. Macron, kolanda présidence ya RDC.

XS
SM
MD
LG