Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Macron asengi Tshisekedi asala gouvernement ezali na bato ya Fayulu na Katumbi


Bakonzi ya bikolo RDC, Félix Tshisekedi (droite), ya France, Emmanuel Macron (gauche), ya Kenya, Uhuru Kenyatta (na kati), bakutanaki na 4e session ya Assemblée générale ya ONU mpo na environnement (bonzinganzinga/mokili), One Planet, na Nairobi, Kenya, 1
Bakonzi ya bikolo RDC, Félix Tshisekedi (droite), ya France, Emmanuel Macron (gauche), ya Kenya, Uhuru Kenyatta (na kati), bakutanaki na 4e session ya Assemblée générale ya ONU mpo na environnement (bonzinganzinga/mokili), One Planet, na Nairobi, Kenya, 1

Mokonzi ya ekolo France asengi na mokokani wa ye ya RDC kosala gouvernement liye likozala na kati na baye ya Martin Fayulu mpe na ya Moïse Katumbi.

Bakonzi ya bikolo RDC, Félix Tshisekedi, ya France, Emmanuel Macron, ya Kenya, Uhuru Kenyatta, bakutanaki na 4e session ya Assemblée générale ya ONU mpo na environnement (bonzinganzinga/mokili), One Planet, na Nairobi, Kenya.

Kolanda baye ya nzinganzinga ya bakonzi ya France na ya RDC, na masolo na bango, Emmanuel Macron esangaki na Félix Tshisekedi kosala gouvernement ya kofungolama oyo ekozala na baye ya Martin Fayulu na Moïse Katumbi.

Basolaki mpe mpo na mandat ya sika ya Monusco.

Martin Fayulu, moko na ba candidat ya maponami ya mokonzi ya mboka, ya le 30 décembre moleki, akobi na koloba ete ye nde alongaki mpe azali kosenga kobandela maponami to kobandela botangi ya bilembo.

"Kasi baye ya nzinganzinga ya mokonzi Macron balobi: "mpo na France, maponami makoki kobandelama te. Totali kaka ndenge Tshisekedi asakolamaki molongi kasi ye esengeli atalisa ete ye nde azali kolakisa mbongwana".

XS
SM
MD
LG