Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

TGI/Gombe ezongisi AFDC na Bahati


Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)
Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)

Tribunal ya grande instance Kinshasa-Gombe epsi elonga na ngambo ya Modeste Bahati na boweleli bwa lingomba AFDC-A azalaki na yango na Néné Nkulu, ministre ya mosala.

Mpo TGI, M Bahati nde azali mokonzi ayebana ya lingomba Allinace des Forces démocratiques du Congo (AFDC-A).

Bowelani na ngambo ya Mme Nkulu bobanda kala.

Mibu mileki, bazuzi babesaki elongo na Mme Nkulu.

Kasi sika, TGI-Gombe epesi elonga na M. Bahati.

M. Bahati afundaka lingomba monene ya FCC ya Joseph Kabila na koluka kobotolo ye lingomba AFDC-A.

M. Bahati azalaki na boyoki bato président Tshisekedi asalaki ntango FCC eboyaki yango.

Bayi ngambo ya M. Tshisekedi bazali kotia elikya na M. Bahati na bato basusu mpo na kokela liboke ya sika ya bato bakamba elongo na mokonzi ya mboka.

M. Tshsekedi asalaki misala mya koyoka bato mpo alobi boyabi bozali te libala na baye ba M. Kabila.

XS
SM
MD
LG