Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba mampinga mpe ya police balaki sembo na Tshisekedi


Président Félix Tshisekedi kati na bakambi ya mampinga na ya police na Palais ya nation, Kinshasa, 1er décembre 2020. (Pérsidence RDC)
Président Félix Tshisekedi kati na bakambi ya mampinga na ya police na Palais ya nation, Kinshasa, 1er décembre 2020. (Pérsidence RDC)

Bakambi ba mampinga ma RDC na baye ya police balaki sembo na président Félix Tshisekedi na bokutani azalaki na mbako mardi na Palais de la nation.

Président Tshisekedi ayambaki état-major ya Commandement ya FARDC (Forces armées ya RDC), ba commandants ya police nationale, ba commandants ya zones ya défense mpe ba états-majors na bango.

Bayi régions militaires mpe bakambi ba mampinga ya mayi, ya mabele mpe ya likolo bazalaki mpe na likita lyango.

Lundi, mokambi ya garde présidentielle akebisaki basoda ba ye na kolanda bayi politiki mpe asengaki bango sembo na M. Tshisekedi.

Kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya M. Tshisekedi, Augustin Kabuya apamaleki o’mokolo mwa mposo bayi FCC mpe PPRD kokana koboma mokonzi ya mboka. Alobaki amemaki bilembo binso UDPS ezali na yango.

Samedi, Barnabé Milinganyo, moko na balobeli ya FCC ya Joseph Kabila mokonzi ya mboka ya kala, akatelamaki etumbu ya mibu misato ya boloko mpe misala makasi na bosambisami, nsima na kolaka na linaka ya télévision ete prete président Tshisekedi akoki kolya mbuma soki abuki buku likonzi mpe atiki mosala te.

XS
SM
MD
LG