Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boyokani na FMI bozali nkisi ya bokono bonso te, elobi PM ya Congo-Brazzaville


Premier ministre ya Congo-Brazzaville Clément Mouamba, Brazzaville, (Photo mai 2015).
Premier ministre ya Congo-Brazzaville Clément Mouamba, Brazzaville, (Photo mai 2015).

Premier ministre ya Congo-Brazzaville, Clément Mouamba alobi ete boyokani na FMI (Fonds monétaire international) bozali nkisi bokobikisa na bokono bonso te.

M. Mouamba asololi na bapanzi sango jeudi na Brazzaville nsima na boyokani na FMI eye alakaki mposo moleki kopesa ekolo eye 448.6 millions ya ba dollars.

Mosolo moye "mozali panacée to eyano na nkwokoso nyonso te, kasi ebandeli ya eyano, " elobi M. Mouamba.

FMI epesaki 25 milliards ya ba CFA (38 millions ya ba euros) nsima na boyokani na Congo-Brazzaville.

"Motango moye mya yambo mozali libandeli. Koleka 80% ekosunga mpo na misala ya bokolongono mpe mateya (biteyelo), " elimboli PM ya Congo-Brazzaville. Oyo etikali ekopesama na mibu misato kaka soki Congo (Brazzaville) etosi miko mipesamelaki ye, elaki M. Mouamba.

"Miko 48 mikotiyama na misala kino mars 2020. Soki mitiyama te na misala, mabongisa mango makosimba te, " ekebisi Mouamba.

Bozongisami ya Congo-Brazzaville na linata na FMI ezuwaki mwa ntango mpo ekolo eye efundamaki na kobomba nyongo mingi. Mpe lisusu, ekolo Chine nde epesaka nyongo mingi na Congo-Brazzaville.

XS
SM
MD
LG