Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UPADS esengi maponami mapusana kino 2023 na Congo-Brazzaville


Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala ya mokonzi ya France, Palais de l'Elysée, Paris, 3 septembre 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala ya mokonzi ya France, Palais de l'Elysée, Paris, 3 septembre 2019.

UPADS (Union panafricaine pour la démocratie sociale), lisanga ya politiki ya opposition na Congo-Brazzaville, esengi maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021 mapusama kino 2023 mpe président Denis Sassou N’Guesso azala te na maponami mango.

"UPADS esengi bopusami kino 2023 ya bokonzi ya Sassou N’Guesso na mpifo nyonso boku likonzi ezali kopesa ye, kasi azala te na maponami makoya," elobi Pascal Tsaty Mabiala, kalaka mokonzi ya lingomba liye na bokutani na bapanzi sango.

"Na bosolo, mabonami ya malamu makoki te kosalama na bozangi corps électoral ya malamu," eyebisi M. Mabiala.

Mpo na UPADS, "bokotisi biométrie, mbongwana ya commission électorale mpe découpage électoral ekoki te kosalama na mibu mibale kolanda linaka ya FMI (Fonds monétaire international)".

M. Sassou akoki komimonisa lisusu na maponami ata azali na mibu 76 mpe mibu 35 ya bokonzi, kolanda buku likonzi eye epekisi te.

XS
SM
MD
LG