Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

G20 endimi kotelemisa nyongo ya bikolo ya Afrika mobu moko


Boko na ba ministres ya G20 ya pétrole na Video-conférence wuto Rihad, Arabie Saoudite, 10 avril 2020.
Boko na ba ministres ya G20 ya pétrole na Video-conférence wuto Rihad, Arabie Saoudite, 10 avril 2020.

Ba ministre ya Finances mpe ba banques centrales ya G20, lingomba ya bikolo ya bomengo mingi, bapesi ndingisa ete nyongo ya bikolo ya nkita moke to ya bobola etelamisama mobu moko likolo na bokono bwa coronavirus ya sika COVID19.

"Botelemisi bwa bofuti nyongo ebandi sik’oyo," elobi Mohammed al-Jadaan, ministre ya Finances ya Arabie Saoudite na vidéo-conférence nsima na bokutani ya G20.

Ekolo Congo démocratique (RDC)p ezali kati na bikolo tuku minei ya Afrika biye bizwi mbano ya botelemisi kofuta nyongo yango.

Ekozala 20 milliards ya ba dollars ekotikala na maboko ya bikolo ya bobola to ya nkita moke, eyebisi M. Mohammed al-Jadaan.

FMI (Fonds monétaire international) elobi na liyebisi ete ezali mpo na kobatela bomoi mpe makoki ya ba millions ya bato ya mpasi na bikolo biye.

G20 esengi misala minso mipesaka nyongo kolanda malako mango.

FMI ekanisi ete coronavirus ya sika ekomema bokweyisami ya nkita (recession) ya makasi bosalama te wuto dépression ya mibu 30.

XS
SM
MD
LG