Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu: "Kondima libonga ya molebeli ya opposition ezali kondima ete Tshisekedi alongaki"


Martin Fayulu azali kopesa mbote na balandi baye ma Kinshasa, 30 juin 2019.
Martin Fayulu azali kopesa mbote na balandi baye ma Kinshasa, 30 juin 2019.

Martin Fayulu, mokambi ya parti Ecide, candidat malheureux ya maponami ya décembre 2018, aboyi likambo ya molebeli ya opposition liye lizali koningisa lingomba Lamuka. Ezalaki na eyano na motuna moko na diner-conférence moko na bankambi moye ya Lamuka asali samedi na Paris, na France.

Mpo na M. Fayulu, Lamuka ezali na mabongisami makoki kopesa yango nzela ya kotambola malamu ata molebeli ya opposition azali te.

"Kondima ebonga ya molobeli ya opposition ezali kondima ete Felix Tshisekedi alongaki maponami. Esengeli te kondima yango ata bakofuta mosolo na molebeli ya opposition," elobi M. Fayulu.

"Kondima ebonga ya molobeli ya opposition, ezali koluka kolongola nga na nzela kasi bakoka nga te," ebakisi M. Fayulu.

XS
SM
MD
LG