Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Cour constitutionnelle ezongisi Jean Bamanisa gouverneur ya Ituri


Jean Saïdi Bamanisa, mokambi ya etuka ya Ituri, 19 novembre 2019. (Twitter/Province de l'Ituri)
Jean Saïdi Bamanisa, mokambi ya etuka ya Ituri, 19 novembre 2019. (Twitter/Province de l'Ituri)

Cour constitutionnelle ekweyisi motion ya défiance ya Assemblée provinciale ya Ituri elongolaki Jean Bamanisa lokola gouverneur ya Ituri mpe ezongisi ye na ebonga na ye .

"'Motion ya défiance' ezwamaki le 20 novembre 2019 na assemblée provinciale ya Ituri likolo ya mokambi ya etuka Jean Bamanisa Saidi ebukaki ba articles 19, 615 mpe 146 alinéas (ndelo ya) 3 ya Buku likonzi," elobi Cour constitutionnelle na mokano mwa yango ya vendredi 7 février 2020.

Cour constitutionnelle esakoli ete "motion yango ezali nulle et de nul effet" (pamba mpe na makasi ya kosala eloko).

Jean Bamanisa na bakambi basusu ya bituka ya Sankura, Haut-Lomamni mpe Kongo-Central bakieyisamaki na sanza ya yambo na 2020.

XS
SM
MD
LG