Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mbulamatari asali boyokani ya kimya na FRPI na Ituri


Mathieu Ngudjolo (C) ya FRPI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.
Mathieu Ngudjolo (C) ya FRPI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.

Vice-premier ministre mpe ministre ya Intérieur mpe bokengi, Gilbert Kankonde, azalaki na boyokani ya kimya bosamali kati na mbulamatari na lingomba ya basimba minduki FRPI na Geti, na Ituri.

Mokambi ya etuka ya Ituri Jean Bamanisa, ministre ya Défense Aimé Ngoy Mukena, V-PM Kankonde batiaki manzaka na mokanda mwango elongo na mokambi ya FRPI, Mbadu Adirodu oyo amispesa grade ya général.

Boyokani bwango bosalami na miso ya bayi MONUSCO (Mission ya Nations unies na Congo).

Boyokani bozwi lisungi ya MONUSCO, bosengeli kosukisa pene ya mibu tuku mibale ya bitumba, ekomi na liyebisi MONUSCO.

Mpo na biso basi, ezali elikya. Mibu tuku mibale, basi bazalaki kozwama na makasi. Tozalaki kokende na bilanga na mpasi. Bana bazalaki kokende mpeza te na keleasi likolo na bozangi bokengi, elobi na MONUSCO Anualite Zawadi movandi na Geti.

FRPI (Front mpo na résistance patriotique ba Ituri) ekoki kozala sik’oyo na babundi 500 baye bazali kozela kokota na mampinga.

FRPI ezali moko na mangomba maye matikala nsima na bituma bikasi ya kati na 1999 na 2003 mpe bimemaki nkoto na nkoto ya bakima bitumba mpe bawei koleka 5.000.

CPI (Cour pénale internationale) ekatelaki moko na bakambi na yango, Germain Katanga, mibu 12 ya boloko na 2014.

Cobra Matata, mokonzi na yango mosusu atindamaki na boloko na Kinshasa na janvier 2015. Asambisama nanu te.

Babundi na yango mingi bakotaki na mampinga kati na 2004 na 2006.

XS
SM
MD
LG