Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 14 bakufi na bokweyisami ya mabela na mine na Maniema


BAtimoli makele na maboko pene na Mambasa, na Ituri, 11 juilet 2018.
BAtimoli makele na maboko pene na Mambasa, na Ituri, 11 juilet 2018.

Batimoli makele (mines) koleka zomi na minei bakufi na bokweyisami ya mabele na Kampene, na Maniema, eyebisi ministre ya boyokani mpe ya lisungi.

Mabele makwei o’mokolo mwa misato 2/10/2019 na mboka Kamepne, pene na na km 180 ba nse ya Kindu. Motango kino sikoyo : 14 bawei, bato 3 na mpota ekasi bazwami na lopitalo. Bolukiluki bozali kokoba, ekomi ministre Steve Mbikayi na tweet moko.

Justin Kyanga Asumani ya société civile, alobi babimisi nzoto 15 na mabele, kati na bango basi babale.

Likama yango lisalamaki na ngonga ya mibale nsima na nzanga.

Bato ebele balukaka makele na mabele yango, kati na bango bana bake mpe basi ya zemi, kolanda maloba ya Kyanga.

Makama ya motindo moye masalaka mingi na RDC

XS
SM
MD
LG