Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akutani na nkumu Philippe na PM Charles Michel na Bruxelles

Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Dénise Nyakeru azali kotiya manzaka na buku nsima na bokutani na mokonzi to nkumu ya mboka Belgique Philippe na mwasi wa ye Mathilde na ndako ya bokonzi na Bruxelles, 17 septembre 2019.

Président Félix Tshisekedi akutani na mokonzi to nkumu ya mboka Belgique Philippe na ndako ya bokonzi na Bruxelles. Mokambi ya ekolo Congo démocratique azalaki mpe na masolo na ministre wa yambo Belgique Charles Michel mwa ntango yambo na yango.

Esengeli akutana mpe na bakambi mpe mpe bakeli misala na ekolo eye.

Tshisekedi atikaki fololo na nkunda ya soda ayebani nkombo te.

Akomaki lobi na Belgique mpe akozala kuna mikolo minei.

Na mobembo ya Félix Tshisekedi na Bruxelles, Congo démocratique na Belgique batiei manzaka na mikanda ya boyikisi makasi boyokani na bango. Bakofungola ba consulats na bango, na Lubumbashi mpe na Anvers. Belgique elaki kopesa millioni tuku mwambe na RDC, elaki mpe kopesa mapoko na ENA, eteyelo ya administration na RDC.

Tshisekedi atikaki fololo na nkunda ya soda ayebani.

Nzokande, bayike ya ba Congolais batambolaki ngambo na bango mpe basalaki makele.

XS
SM
MD
LG