Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bokutani ya Lamuka epusani o’mokolo ya eyenga

(Banda loboko ya la mwasi) Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Alan Doss ya Fondation Kofi Annan, Martin Fayulu, Félix Tshisekedi, Moïse Katumbi mpe Vital Kamerhe na bokutani ya Genève, Suisse, 11 novembre 2018.

Bokutani ya lingomba Lamuka liye libongisamaki mpo na mokolo ya lelo na Bruxelles epusani o’molo ya eyenga le 24 mars.

Baye ya lingomba liye balobi ete Moïse Katumbi, moko ya bakambi ya Lamuka, azwami na makambo ya libota na ye mpe yango mapekisi komimonisa na esika ya bokutani.

Molebeli ya longomba liye Eve Bazaiba alobi, na ngambo na ye, ete Martin Fayulu, candidat ya lingomba liye na maponami ya mokonzi ya mboka molekaki na décembre, azali na bokutani mingi na ban aya Congo démocratique ya libanda to diaspora mpe akokuna lelo na ministre belge ya mambi ya bapaya.

XS
SM
MD
LG