Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi aboyaki bato batambola nsima na nzoto misato ya baye batambolaki na UDPS elokotamaki na ebale


Katumbi alobi atambolaki te mpo aboyaki makila matanga
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:02 0:00

Katumbi alobi atambolaki te mpo aboyaki makila matanga

Moïse Katumbi, moko na bakambi ya lingomba Lamuka, alobi aboyaki bato batambola lundi 13 juillet 2020 lokola ebongismaki mpo na koboya bato bakufa. Alobi yango ntango bayi UDPS balokoti nzoto misato ya baye bakanisi ete bazalaki na botamboli ya le 9 juillet.

Mokambi ya parti (lisanga) Ensemble pour la république aboyaki bato batambola mpe asakoli ete botamboli mpo na kotelemela bondimami na Assemblée nationale ya Ronsard Malonda bo’ motambwisi ya CENI bokosalama nsima, o’mokolo moyebani nanu te.

"Nazwaki sango ete bato baike bamibongisaki mpo na kosala mabe na botamboli na biso, Fondation Katangaise eyaki mpe kotala ngai mpo na koyebisa ngai nse likambo moko wana ete likama lizalaki. Ngai nazali mokambi oyo amonaka lobi ya mboka na biso, lobi na biso ezali bomoi ya bana mboka. Basusu bakoloba ete Moïse Katumbi abangaki liwa, nabangaki liwa te Ngai na bangaka liwa te kasi nabangaka kobomisa basusu. Esengeli kobatela bomoi ya bana Congo," elobi M. Katumbi liboso ya pabanzi sango na Lubumvashi.

M. Katumbi azalaki moko na bayi Lamuka baye babengaki bato kokita mingi o’balabala mpo na kotelemela boponami bwa M. Malonda mpe mibeko misato miye mibongisami na Assemblée nationale mpo na kokonza bazuzi na parquet.

Ba policiers batikaki te bato kotambola na Lubumbashi lokola mpe na bituka misusu.

Nzokande, bayi UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, balakisaki nkanda nsima na kolokota lundi 23 juillet na Lubumbashi nzoto misato ya bato bakanisami ete batambolaki le 9 juillet.

Police nationale elobaki ete bato babale nde bakufaki na botamboli ya le 9 juillet, moko na Kinshasa mpe na Lubumbashi,

Molebili ya police alobaki bato baye bakufaki ntango balikangi koyiba to kopunza.

XS
SM
MD
LG