Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe azalaki te na bosambisami bwa ye vendredi, audiance ekoya etiami nsima na mposo mibale


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.

Bosambisami ya bozongeli ya Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala ya président Tshisekedi, bozongelaki vendredi na bokolo bonene ya Makala, CPRK. Vital Kamerhe azalaki te na bosambisami bwango.

M. Kamerhe akotaki lopitalo wuto le 24 août 2020.

Ngambo inso ya bosambisami bwango ezalaki nsima na bopusani mbala mingi ya bosambisami ya bozongeli.

Basambeli ya M. Kamerhe bakobaki koloba na bazuzi ete client na bango ayebi likambo te.

Nsima na ngonga minei ya bosambisami, bazuzi babengisi bokutani bosusu nsima mposo mibale.

M. Kamerhe akatelamaki, le 25 juillet, mibu 20 mya misala makasi bakisa na yango zomi mya bopekisi makoki ma politiki.

Mokambi ya ndako ya mosala ya président Tshisekedi afundamaki mpe asambisamaki mpo na kopegnwisami ya misolo ya botongi ndako na ntina ya mikolo nkama mya président Félix Tshisekedi.

Ezalaki elongo na Sammih Jammal, nkolo SOMIBO mpe Jeanot Muhima ya import-export ne présidence baye bazali mpe na bosambisami ya bonzongeli.

XS
SM
MD
LG