Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe atiami na "respiration artificielle" (Michel Moto)


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.

Vital Kamerhe mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, oyo akatelama mibu 20 mya boloko mpo na kopengwisa misolo mya l’Etat, atiami na "respiration artificielle" to bisaleli ya kopema, elobi basungi ba ye.

"Vital Kamerhe azwaki nkwokoso na ntongo eye. Atiami na bisaleli kosunga kopema. Nazali kokende na lopitalo mpo na kozwa sango mingi," ekomi na Twitter moko na basungi ya M. Kamerhe, Michel Moto.

M. Kamerhe azali na bosambisami ya kokozongela na bazuzi mpo aboyaki etumbu ya mibu 20 ya boloko bakisa na mibu 10 ya bopekisi makoki mapolitiki, ekatelamaki ye nsima na kosamba mpo na kopengwisa misolo mya botongi ndako na ntina ya mikolo nkama ya yambo ya mokonzi ya mboka Tshisekedi.

Akatelamaki etumbu elongo na nkolo compagnie SAMIBO, moyi ekolo Liban Sammih Jamal, na mosali ya import export ya président Jeannot Mouhima.

Akotaka lopitalo wuto basanza mingi.

XS
SM
MD
LG