Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FDLR bazo’funda Kigali na koboma bato 17 na parc ya Virunga


Babateli ya parc mpe basoda bapesi losako na baninga ba bango mpe bandeko basusu bakufaki na bobomami bwa basimba minduki na par ya Virunga, na Goma, Nord-Kivu, 27 avril 2020. (VOA/Charly Kasereka)
Babateli ya parc mpe basoda bapesi losako na baninga ba bango mpe bandeko basusu bakufaki na bobomami bwa basimba minduki na par ya Virunga, na Goma, Nord-Kivu, 27 avril 2020. (VOA/Charly Kasereka)

Batomboki ya Rwanda FDLR bawangani ete babomaki ba civils 5 mpe ba rangers 12 vendredi na parc ya Virunga, na Nord-Kivu, kasi bafundi bokonzi ya Kigali na kosala bobomami bwango.

Ba FDLR (Forces ya libération ya Rwanda) bakomi na liyebisi ete "bazali kopamela bobomami wana ya soni mpe balingi bato banso bayeba ete bazalaki te likambo lyango".

:Bitumba bisalamaki na basoda ya Kagame le 24 avril bibakisami na mbeba mingi eye bavandi bapamelaka mpe bakonzi mingi ya Congo bayebi malamu," elobi liyebisi ya ba FDLR.

"Territoire ya Rutshuru (esika bobomami bwango bosalamaki) ezali sik’oyo na maboko ya basoda ya Rwanda," eyebisi FDLR.

Lundi, Paul Kagame, président ya Rwanda awangaki ete ata soda moko ya mboka na ye azali na mabele ya Congo mpo na kobundisa mangomba ya basimba minduki.

Bakambi ya parc ya Virunga balobaki ete bazali na bilembo ete ba FDLR nde basalaki bobomami boye.

Ba FDLR bazali lingomba lisalamaki na 2000 na RDC nsima na kokima bobomami monene (génocide) ya 1994 boye mingi bafundamaki kosala na Rwanda.

Bato 17 baye bawaki ba bitumba byango bakunda lundi na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG