Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Jaynet Kabila akomba commission bobateli mpe bokengi na Ass. nat.


Jaynet KAbila, lipasa ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na Kinshasa, 4 juillet 2014.
Jaynet KAbila, lipasa ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na Kinshasa, 4 juillet 2014.

Jayent Kabila, lipasa ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC, aponami mpo na kokamba commission ya bobatelami mpe bokengi ya ekolo na Assemblée nationale, eyebisi boko na ba députés.

Kolanda mokanda mobimisami na bureau ya Assemblée nationale, FCC (Front commun pour le Congo), lingomba linene ya Joseph Kabila, lizwi bokambi ya ba commissions motoba. Kati na yango liye eye y aya bobateli mpe bokengi ekokamba na Jaynet Kabila.

Lipasa ya Joseph Kabila akosungama na ministre ya kala ya bobateli, Crispin Atama Thabe.

FCC ekokamba mpe lisusu ba comissions politique, administrative, juridique mpe ya ba relations extérieures.

Bosangani CACH ya président Félix Tshisekedi, yango bozwi bokambami ya commission économique mpe financière.

Mabonga masato ya bokambi ba commissions misusu mabombani mpo na opposiion eye eyokani nanu te.

XS
SM
MD
LG