Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joe Biden asakoli ete bolandeli ya makasi ya RDC bokokoba


Président Joe Biden na Kearny, N.J., 25 octobre 2021.
Président Joe Biden na Kearny, N.J., 25 octobre 2021.

Président Joseph (Joe) R. Biden azwi mokano ete urgence nationale (bosenga ya makasi) ya Etats-Unis mpo na Ekolo Congo démocratique ekokoba kino nsimana le 27 octobre 2027.

Mokonzi ya Etats-Unis akomeli Congrès mpo na yango.

"Makambo na RDC to maye makangami na mboka eye, epayi bitumba ya kanza mpe mbeba ya mabe ezali kokoba kotia etuka na likama, makobi kozala likama mo na politiki ya bapaya ya Etats-Unis. Yango wana, na kati ete esengeli kokoba bolandeli makasi ya ekolo eye etiamaki na mokano (executive order) 13413, kolanda ndenge makambo mazali kokende kati mpe na nzela ya RDC," ekomi M. Biden.

Urgence nationale ya Etats-Unis mpo na RDC etiamaki na 2006.

Barack Obama lokola mpe Donald Trump, bakonzi ba kala ba Etats-Unis babakisa mikolo na yango.

Sika, M. Biden mpe asali yango.

XS
SM
MD
LG