Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington ekani kopesa maboko na bikolo ya bassin du Congo mpo nzamba esila te


Jonathan Pershing, Motindami molandi ya lokumu ya mokonzi ya Etats-Unis mpo na climat na 2021, awa na photo na likita lya Marrakesh 2016, 14 novembre 2016.
Jonathan Pershing, Motindami molandi ya lokumu ya mokonzi ya Etats-Unis mpo na climat na 2021, awa na photo na likita lya Marrakesh 2016, 14 novembre 2016.

Motindami molandi ya lokumu ya mokonzi ya Etats-Unis mpo na maye matali clmat, Jonathan Pershing, aleki na Congo mpe na RDC mpo na komema elaka ya mboka na ye ya kopesa maboko mpo ete nzamba esila te na bassin ya Congo.

"Awa na bassin ya Congo, esengeli tosala nyonso mpo ete bokati nzamba nyonso bosalama te. Mpo awa, nzamba ezali nde bomengo," elobi na bapanzi sango M. Pershing na Brazzaville epayi azalaki lundi.

Molakisi elongi ya président Joe Biden na climat alaki ete mbulamatari ya Amerka ekosala elongo na bikolo bya bassin ya Congo na nzela ya likita libengami COP26 likosalama na Glasgow (Grande-Bretagne) na novembre.

M. Pershing akundoli ete nzamba ya Amazonie mpe ya Indonésie ekatami mingi.

Elikya etikali nde na basin ya Congo oyo ezali bongo poumon écologique ya mibale na mokili na 220 millions ya ba hectares na yango, eye 57% ezali na RDC mpe 10% na Congo.

"Bassin ya Congo emelaka pene na mibu misatu ya ba gaz ya effet de serre ebimisaka na mokili mpe mibu 15 ya eye ebimimisamaka na Etats-Unis," ekundoli M. Pershing.

M. Pershing akutani na président Denis Sassou na Brazzaville na masolo matali Fonds bleu, eye ezali misala mokonzi ya Congo abandaki mpo na bopesi misolo ya kotombola mambongisi ma Bassi ya Congo.

Motindami ya M. Biden asukisaki mobembo mwa ya na Kinshasa.

Kasi yambo na kokoma Brazzaville alekaki na Afrique du Sud mpe na Namibie.

XS
SM
MD
LG