Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bintou Keita alobeli bokengi na RDC liboso lya Conseil ya sécurité ya ONU


Conseil ya sécurité na Nations unies.
Conseil ya sécurité na Nations unies.

Mokonzi ya Monusco mpe molakisi elongi ya kalaka mokonzi ya ONU na Ekolo Congo démocratique, mama Bintou Keita apesi rapport ya maye matali bokengi na mboka eye liboso lya likita lya Conseil ya sécurité na New York, na Etats-Unis.

Bintou Keita alobeli mabongisi mazali kosalama ndenge MONUSCO ebandaki kolongwa na bisika biike.

Alobeli mpe bitumba ya basimba minduki ntango MONUSCO ezali kopesa maboko na état de siège mampinga ma RDC mazali komema na monyele ya mboka.

Na likita lyango, bikolo biike bisakoli kopesa maboko na MONUSCO mpe na état de siège.

Balendisi mbulamatari ya RDC kokoba mbongwana ezali kosalama mpo ete maponami masalama na 2023 mpe na ndenge esengeli.

Basengi mpe mbulatari kokembisa makasi ma yango na maye matali bokengi mpe makoki ma bomoto.

Kasi basengi na RDC kosala mosala ye bokengi elongo na bikolo nzinga nzinga.

Bikolobiye bisepeli mpe ndenge basi mingi bapesami bibonga na mokonzi ya RDC.

Batelemeli bobomi ya bayi MONUSCO.

Etats-Unis elaki kopesa maboko na misala bobimisa ba bundi ba kala na mangomba na bango.

Bokono bwa COVID-19 na RDC bolobemaki mpe na likita lyango lokola mpe botomboki bwa volcan Nyiragongo le 22 mai.

XS
SM
MD
LG