Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean-Pierre Bemba asengi ba Congolais kokende na maponami kasi komatisa bokengeli


Jean-Pierre Bemba, moko na ba vice-présidents banei ya RDC mpe mokambi ya MLC (Mouvement de libération du Congo), na Kinshasa, RDC, 23 juin 2019.
Jean-Pierre Bemba, moko na ba vice-présidents banei ya RDC mpe mokambi ya MLC (Mouvement de libération du Congo), na Kinshasa, RDC, 23 juin 2019.

Jean-Pierre Bemba mokonzi ya MLC mpe moko na bayi Union sacree alendisi bana ba Ekolo Congo démocratique kondima kokende na maponami ata nungu nungu ezali kasi kokolisa nde bokengeli ya maponami.

M. Bemba kosala ete maponami mazala malamu ata nungu nungu ezali sika na bobonami ya Denis Kadima bo’ mokambi ya CENI mpe nkwokoso esusu ezali na mboka.

Mokambi ya MLC alobi na liyebisi kolonga maponami etali kozala na bato kati na Bureau CENI to te.

Alobi na lyebisi ete alingi nde bokengeli maponami boyeisama makasi lokola bikolo nzomi na mwambe ya communauté internationale basengaki yango le 26 octobre eleki.

Mokambi ya MLC asengi mpe ete bilembo bya maponami biyebaka na kosakolamaka na bureau ya maponami moko moko nsima na maponami.

XS
SM
MD
LG