Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akoloba vendredi na mpokwa


Président Félix Tshisekedi ya RDC, mpe mokambi ya Union africaine, na lisikulu na ye na 76e Assemblée générale ya ONU na New York, 21 septembre 2021.
Président Félix Tshisekedi ya RDC, mpe mokambi ya Union africaine, na lisikulu na ye na 76e Assemblée générale ya ONU na New York, 21 septembre 2021.

Présindent Félix Tshisekedi akosala na mpokwa "lisakoli lya motuya", elobi mokambi ya misala ya sango ya mokonzi ya ekolo Congo démocratique.

Lisikulu lya president Tshiekedi lizelami nsima na bondimami na Assemblée nationale ya bakambi ba CENI, misala mya mabongisi ma maponami ntango nungu nungu ezali mingi.

Mingi mingi na ngambo ya bakambi biyamba ya CENCO na ECC, lokola mpe na opposition Lamuka na FCC (ya Joseph Kabila, mokonzi ya kala) mpe ata kati na Union sacrée, na ngambo ya bayi Moïse Katumbi.

"Nakoloba te soki ekozala nini kasi ekozala lisikulu lya kafukafu," eyebisi VOA Lingala mokambi ya cellule ya communication ya M. Tshisekedi, Eric Nyindu.

Longola nungu nungu mpo na maponami masengeli kosalama na 2023, mboka ezali nanu na état de siège na est, ba soda ba Rwanda bawutaki kokota mikolo misato mileki, Ebola mpe ezali, bana kelasi bazali kotanga nanu te mpe mango misusu mpe mazali.

XS
SM
MD
LG