Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Denis Kadima : Réseau européen mpo na Afrika ya kati (EurAc) esengi UE koboya mobulu na RDC


DRC elections expert Denis Kadima
DRC elections expert Denis Kadima

Réseau européen mpo na Afrika ya kati (EurAc) na baye bazali kati na yango basepeli te ete bobonami ya mokambi ya sika ya CENI Denis Kadima bosalami na bozangi boyokani to consensus, ekomi bayi EurAc.

"Union européenne (UE) esengeli kosala nyonso mpo koboya matata to nkwokoso ya politiki ya makasi eye ekoki kobebisa bosali ya maponami na kimya na 2023," ekomi bayi EueAc na liyebisi na bango..

EurAc ebimisi liyebisi lyango nsima na Denis Kadima mokambi ya sika ya CENI kolaki ndayi mpo na kokota o’mosala ntango nungu ngungu ezali mingi kati na bapekispo ya Katoliko, ba misioni mpe bayi opposition.

Mangomba mapolitiki ya Lamuka, ngambo ya Martin Fayulu na Adoplhe Muzito, elongo na bayi FCC ya mokonzi ya kala Josepha Kabila, na bosangani ya bayi katoliko mpe bamisioni balaki kotika o’balabal omokolo mwa mposo mpo na koboya Denis Kadima mpe kosenga boyokani na mobeko ya maponami.

"Soki mikano mizwami te na lombango mpo na kokitisa bobendani mpe kozongisa bondimam ya ban aya RDC na malamu mpe bonsomi ya misala mya maponami, RDC ezali na likama ya kokweya na nkwokoso ya makasi," ekebisi bayi EurAc.

Président Félix Tshisekedi esengeli akitisa mitema mya bana ba Congo mpe kosala nyonso na makoki ma ye mpo na kotosa mikolo Buku likonzi etia mpo na bosamali ya maponami ya 2023 mpe kosala ete mazala malamu, ebakisi EurAc.

Nzonka nde, Christophe Mboso Nkodia oyo azali moko na bayi Union sacrée na président Tshisekedi, ye alaki kosala milulu na velodrome se mokolo mwa mposo yango mpo na kolimbola ndenge amemi makambo.

XS
SM
MD
LG