Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi andimi Kadima bo' motambwisi ya CENI


Président Félix Tshisekedi ya RDC, mokambi ya Union africaien, na likita lya G20 na Berlin, 27 aout 2021.
Président Félix Tshisekedi ya RDC, mokambi ya Union africaien, na likita lya G20 na Berlin, 27 aout 2021.

Président Félix Tshisekedi atie manzaka na mokano movandisi Denis Kadima ba ebonga ya motambwisi ya CENI, misala mya kobongisa maponami. Mokonzi ya RDC asakolaki yambo na yango ete andimi M. Kadima na ebonga yango nsima na Assemblée nationale kondima boponami na ye.

Président asakoli mokano mwa ye ntango nungu ezali na bakambi baike ya biyamba mpe bayi politiki mpo na likambo lyango.

Président Tshisekedi apesi lisikulu na sango ya mpokwa ta télévision nationale, RTNC.

"Nakotalaka maye manso masalami, nazwi mokano ya kotia manzanga na mokano ya kotiaka bakambi ba CENI. Nalendisi bato banso bazali na Bureau ya CENI kosala ete ekolo ezwa maponami ma bonsoni, ma démocratie mpe ma pole na ndelo ya ntango eye Buku likonzi etia," elobi M. Tshisekedi.

Mpo na ye, boponami ya M. Kadima mosalami malamu na ndenge ya démocratie mpo motanga mwa bakambi mingi ya biyamba nde bandimaki ye ata bayi CENO (ba episkopo ba katoliko) na ECC (ba missioni) baboyaki.

Longola bakambi ba biyamba mibale biye, nungu nungu ezali mpe kati na bayi politki na mboka lokola bayi opposision, Lamuka ya Martin Fayulu na Adoplhe Muzito, na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila mpe ata na ngambo ya Moïe Katumbi oyo azali na Union sacrée na M. Tshisekedi.

Mokonzi ya mboka alobi aliki ete opposition ekotinda bat oba bango basato mpo na kosala na CENI na kobongisa mabponami.

M. Tshisekedi asengi lisungi ya bayi molongo mpo na yango mpe na bana mboka banso komilengele mpo na maponami.

Alaki kotia moto akolandela maponami mpo na ye.

XS
SM
MD
LG