Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Martin Fayulu Apameli lolenge Assemblee nationale eponi bakambi ya sika ya CENI


 Martin Fayulu speaks during a press conference on January 18, 2019 at his party headquarters in the capital Kinshasa
Martin Fayulu speaks during a press conference on January 18, 2019 at his party headquarters in the capital Kinshasa

Martin Fayulu mokonzi ya parti politique ECIDE oyo azali kobunda mpo CENI elongwa o maboko ma bayi politiki alobi esali mabe makasi lolenge bakeli mibeko na assemblee nationale bandimi bakambi ya sika ya CENI.

Na liyebisi lya ye, apameli kopengwisama ya bakeli mibeko mpe corruption na assemblee nationale. Asepeli te lolenge M. Mboso presidnt ya ssemblee mnationale asali makambo na makasi na kolekisaka bakambi ya sika ya CENI, ata koyoka maloba ma population te, mpo na kosalela president Felix Tshisekedi, elobi Martin Fayulu na masolo azalaki na yango mokolo mwa mibale mwa lelo liboso lya bapanzi sango.

Asakoli lisusu ete maye masalemi mpo na CENI ezali lolenge moko lokola maye masalemaki mpo na kopona ba juges ya cours constitutionnel, mpe amoni été mbulamatari azali kosala manso mpo na koyiba maponami ma 2023, mpe nakopesa nzela president Tshisekedi na kotikala na bokonzi.

Na mobu 2020 President tshisekedi aponaki ba magistrats ya sika ya cours constitutionnelle. Misusu na kati na baye balongolaki, batindamaki kozua ba poste ya sika na cours de cassation. Na kati ya bazuzi baye ya sika bakotaki na cours constitutionnelle, ezali avocat general Dieudonné Kaluba oyo akomaki mokonzi ya sika ya cour constitutionnelle.

Martin Fayulu asukisi na kosenga na batu banso baye bazali na posa ya mbongwana ya solo na ekolo Congo democratique basangana mpo na kosala lingomba ya kobundisa oyo abengi « Dictature Fatshiste » oyo mpo na ye, akomi kokota na ekolo Congo Democratique, mpo na koluka koyiba maponami.

Assemblée nationale endimaki mikolo mileki bakombi ya sika 12 likolo ya bato 15 oyo esengeli bakamba CENI, na sima ya bopesi rapport ya commission eye ezalaki kotala ba dossiers ya ba candidats banso. Bayi lingomba ya ba Catholico(CENCO) na ba Missioni (ECC) batelemelaki boponomi boye koloba ete, esalamaki na ndenge esengelaki te. Mpe na kati ya union Sacree, bato bayike lokola mpe Moise katumbi, batelemelaki lolenge bonami boye bosalemaki.

XS
SM
MD
LG