Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba asengi bakambi biyamba koyokana na likambo lya CENI mpo na kimya na mboka


Jean-Pierre Bemba, moko na ba vice-présidents banei ya RDC mpe mokambi ya MLC (Mouvement de libération du Congo), na Kinshasa, RDC, 23 juin 2019.
Jean-Pierre Bemba, moko na ba vice-présidents banei ya RDC mpe mokambi ya MLC (Mouvement de libération du Congo), na Kinshasa, RDC, 23 juin 2019.

Jean-Pierre Bemba, motambwisi ya MLC mpe moko na bayi Union sacrée elongo na président Félix Tshisekedi bawki mbela ya kosenga bakambi biyamba bayokana yambo ngonga 74 motamwisi Assemblée nationale apesaki bango esila.

Na mokanda to communiqué atie manzaka le 4 octobre, Jean Pierre Bemba Gombo, président ya MLC asengi na bakambi ya ba mangomba na kosala manso mpo na koluka boyokani na maye matali mokambi ya CENI.

Abakisi lisusu ete bakambi biyamba basengeli kotia pembeni maye manso mazali kokabola bango mpo na boluki kimya mpe bosangani ya ba Congolais mpo ete maponami ma 2023 maleka na ndenge elongobani.

Mokambi ya MLC abondeli bakambi biyamba ete bakoka kosala manso mpo ete bakoka kopona na boyakani bakambi ya CENI na mikolo misato miye Assemblée nationale epesi bango,

Nonga 74, motambwisi ya Assemblée nationale Christophe Mboso N'Kodia apesaki bakambi biyamba mpo na mbala ya suka ezali kosila o'mokolo mwa yambo le 4 octobre 2021 na minuti.

Bakambi biyamba nanu bayokani na ngonga tozali kokoma article eye.

XS
SM
MD
LG