Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Inspection Générale ya Finances etindi audit ya misala ya COVID19, ministère ya bokongono na IRNB


Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga (C), ministre ya santé Dr Eteni Longondo (2e G), mokambi INRB mpe ya cellule ya COVID Dr. Jean-Jacques Muyembs (G) na bofungolami ya ndako ya sika ya INRB, Kinshasa, 22 février 2020. (Facebook/INRB)
Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga (C), ministre ya santé Dr Eteni Longondo (2e G), mokambi INRB mpe ya cellule ya COVID Dr. Jean-Jacques Muyembs (G) na bofungolami ya ndako ya sika ya INRB, Kinshasa, 22 février 2020. (Facebook/INRB)

Inspection générale ya Finances etindi lipinga lya ba auditeurs mpo kotala ndenge misolo mpe biloko misusu bisalelamaki na misala mya bitumba na COVID19, na ministère ya bokolongono mpe na INRB.

Inspeceur général ya Finances ya sika, Jules Alingete Key atindi ba auditeurs basato mpo kosala bolukiluki yango na mikolo zomi.

Djamba Ya Ndjondji, nde akokamba misala myango. Akozala na Wasongolua Ndongolo, Mutombo Kalonji mpe Lutete Mvuemba.

Mosala na bango mozali kotala ndenge basalelaki misolo, biloko, makabo mpe makoki misusu ya ndenge na ndenge, maye mapesamaki na Comité multisectoriel ya bokolongo elongo na ba services spécialisés, mingi mpenza Institut national de recherche biomédicale (INRB), elakisi mokamnda ya botindami na bango.

Ba luki baye bakotala mpe esikaki yango etindamamki mpe ntina nini makoki mango masalelamaki.

Bolukiluki boye botindami mikolo miike nsima na vice-ministre ya bokolongono, Albert M’Peti Biyombo afundaki bopengwisami ya misolo na misala ya COVID19, na mokanda atindelaki ministre wa Yambo, Sylvestre INlunga Ilumkamba.

Nzokande, basambeli ba ministre ya Santé bango nde bafundaki na bazuzi moto ayebani te na kopanza ye sango ya lokuta mpo na koyiba misolo.

Na biyano apesaki na radio TopCongo mikolo mileki, ministre ya bokolongo, Dr. Eteni Longondo alobaki ete asalelaki kaka millions misato ya ba dollars kati na 27 millions ya ba dollars epesamaki na ministère ya Santé.

Ba mabulances, ba kisi mpe biloko misusu bisombamaki, eyanolaki Dr. Eteni.

Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya INRB mpe ya cellule technique ya COVID19 alobaki mpe ete amonaki te misolo misusu elobelamaki.

Minganga, bapesi lisalisi mpe basali ya COVID19 batelemisi misala wuto pene na mposo moko mpo na kosenga sanza misatu ya lifuti na bango.

XS
SM
MD
LG