Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misolo mya COVID19 mipengwasami, elobi vice-ministre ya bokolongono


Minganga mpe basungi ya COVID19 batelemisi misala mpo na kosenga lifuta mpe misolo mya likama, na Goma, Nord-Kivu, 8 juillet 2020. (VOA/Charly Kasereka)
Minganga mpe basungi ya COVID19 batelemisi misala mpo na kosenga lifuta mpe misolo mya likama, na Goma, Nord-Kivu, 8 juillet 2020. (VOA/Charly Kasereka)

Vice-ministre Albert M’Peti Biyombo andimi, na eyano apesi ndako ya sango Reuters, ete afundaki likambo lyango na mokanda ya nkunku atindelaki Ministre wa yambo.

vice-ministre M'Peti akomwe ndenge mokanda mwango motamboli na réseaux sociaux.

"Baye bazali na mafia yango bazali kosenga na misala miye mizwi mbongo ya l’Etat kozongisela bango na nkunku (rétrocommission) 35%," eyebisi vice-minstre Biyombo na mokanda mwango.

Nzokande wuto mposo moleki, minganga mpe basali ya lisungi na COVID19 batelemisi misala mpo na kosenga sanza misato ya lifuta na bango.

Ebakisi na botelemisi ya misala ya minganga, wuto mardi (lelo), mpo na kosenga lifuta mpe misolo mya likama ya sanza mingi.

"Basengaka ngai na mbamba inso kotia manzaka na mikamba ya litomba mingi te mpe mitali mikanda mya misolo te," ekomi vice-ministre Biyombo na kopesaka ndakisa ya misolo ya COVID19 mipesaki na lopitalo eye eponama te na mbulamatari mpo na bokono boye.

Ministre ya bokolongono Eteni Longondo ayanolaki te mbela ya téléphone mpo na kopesa makanisi maye.

Kasi ayanolaki mardi na radio TopCongo na koloba ete "lifuta lya minganga mitalamaka na Primature kasi ye te".

Ministre Eteni alimbolaki lisusu na TopoCongo ete "atalaki kaka 3 millions $ likolo na 27 millions $ eye mbulamatari ebimisaki mpo na COVID19".

"Ministère ezwaki 10 millions $ mpe ngai na talaki kaka 3 millions. Tosombaki ba ambulances mpe mituka misusu. Tosalelaki 1,4 millions $ na biloko misusu," elimbolaki M. Eteni.

Na mokanda na ye, vice-ministe biyombo akomi ete mino misusu mizwaki kati na miye milobelamaki na bosambisami mpo na mikolo nkama mya yambo ya président Félix Tshisekedi, mino miye milekisa mikolo.

Député françois Nzekuye ya PPRD akomelaki motuma mokomama na ministre mpo ayanola likambo lyango na Assemblée nationale.

Nzokande motango mwa bato bayebani kozwa COVID19 mozali se komata na RDC. Mardi, bato 7.737 nde bayebani kozwama na yango wuto libandela na yango, le 10 mars 2020. 3.492 nde babikisami, 184 bakufi.

Na sanza ya misato, ministre ya kala Dr. Oly Ilunga akatelamaki mibu mitano mya misala makasi na kofundama na kopengwisa 400.000 $ ya bokono bwa Ebola na monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG