Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ilunga asengi bomoko mpe alaki kozongisa nzoto ya Mobutu na Tshombe


Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, 4 juillet 2019. (Facebook/Syvestre Ilunga Ilunkamba)
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, 4 juillet 2019. (Facebook/Syvestre Ilunga Ilunkamba)

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba alakisi o’mokolo ya mibale na Assemblée nationale, ndako ya bokeli mibeko, linaka na ye mpe baye bazali na mbulamatari asali mposo eleki.

Ntango ekomi ya kotelemisa ekolo kobanda na loboko, elobi na M. Ilunga na lisikulu na ye.

Asengi makasi ya bato banso mpo kozongisa boyokani na ekolo mpe kosili mpasi na bobola mpe komema mboka na ntombwa.

Premier ministre Ilunga Ilukamba alaki mpo na yango kozongisa na mboka nzoto ya Joseph Mobutu Sese Seko, mokonzi ya kala, mpe na Moïse Tshombe, Premier ministre ya kala.

Alaki mpe lisusu kokekala misala mikozala nse mpo na bitumba na kaniaka.

Elaka na ye mosusu ezali ya kopesa maboko na Commission électorale nationale indépdendante mpo na kosilisa maponami manso masengeli kosalame, maponami ya loboko.

Mbulamatari ya Sylvestre Ilunga ezali na bato tuku motoba na motoba. Ebimaki mposo moleki.

Nzokande bituluku ya bato batondaki na etando ya Palais du peuple yambo na lisukulu liye. Bayike basalaki mwa mobulu mpo na kokota o’ndako ya bokeli mobeko kasi police ebeti masisi likolo mpo na kopekisa mobulu, eyebisi boko na bapanzi sango bazalaki kuna.

Kati bato baye, basusu bazali kosenga nde mosala.

XS
SM
MD
LG