Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila asengi ba Congolais bapesa maboko na mbulamatari ya sika


Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)
Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya Congo démocratique asengi na ba Congolais kopesa maboko na mbulamatari ya sika ebimisaki o’mokolo ya lundi.

Apesi longonya na mbulamatari ya sika mpe atombeli yango bolamu.

"Lipinga ya mbulatari (équipe gouvernementale) lizelamaki banda kala na bana ya Congo liyebani sik'oyo. Napesi longonya na mbulamatari ya sika mpe natombeli yango elonga," ekomi na compte Twitter na ye Joseph Kabila.

"Nasengi bana ya Congo bapesa yango maboko na kokokisa misala na yango," ebakisi J. Kabila.

Nzokande, bayike ya lingomba na ye bayebisi ete ba baye ya ngambo na bango baye bakozala na mbulamatari basengelaki bayambama na J. Kabila jeudi na Kingakati.

Président Félix Tshisekedi atiyaki manzaka no mokanda ya kobimisa mbulamatari ya sika sanza mwambe nsima bokoti na ye na bokonzi, le 24 janvier 2019.

Premier ministre ya sika, Sylvestre Ilunga Ilunkamba azelaki koleka sanza minei mpo na bobimisami ya mbulamatari yango.

Masolo mazalaki mwa matata kati na CACH, lingomba ya F. Tshisekedi mpe FCC ya Joseph Kabila baye basangana na coalition mpo na kosala mbulamatari.

XS
SM
MD
LG