Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hissène Habré akufi na bokangami na Sénégal


Mokonzi ya kala ya Tchad Hissène Habré na bosambisami bwa ye na Dakar, Sénégal, le 2 juillet 2013.
Mokonzi ya kala ya Tchad Hissène Habré na bosambisami bwa ye na Dakar, Sénégal, le 2 juillet 2013.

Mokonzi ya kala ya Tchad Hissène Habrè akufi na mibu tuku sambo na libwa na Sénégal epayi wapi akatelamaki boloko ya libela na 2016 mpo na mbeba ya bomoto na mboka na ye.

Hissène Habré akambaka Tchad na bokonzi ya makasi wuto 1982 kino 1990.

Sango ya liwa lya ye epesami na mbulamatari ya Sénégal, mboka epayi wapi Tribunal Spécial ya Afrika ya mambi ma bomoto ezalaka.

Misala mya boluki boluki miye bosalamaki mitiaki na mokongo ya Hissène Habré liwa lya bato koleka nkoto tuku minei na nse ya bokonzi na ye na Tchad.

Hissène Habré akweyisamaki na bokonzi na 1990 mpe akimaki na Sénégal.

Mokili motiaki mbamba mpe Hissène Habré akangamaki na 2013 mpe ayebaki kosambisama.

XS
SM
MD
LG