Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Haute cour militaire ekoloba mercredi soki Kabila akosamba na bobomi ya Chebeya


Joseph Kabila, pene na molongani wa ye Olive Lembe (G), na maponami, na Kinshasa, 30 décembre 2018.
Joseph Kabila, pene na molongani wa ye Olive Lembe (G), na maponami, na Kinshasa, 30 décembre 2018.

Haute cour militaire elaki kopesa eyano na bafundi to ba parties civiles mercredi ekoya na bosenga na bango ya komona mokonzi ya kala Joseph Kabila na bato basusu batangami na bobomi ya Floribert Chebeya na Fidèle Bazana, kosamba.

Ezalaki na bozongi ya bosambisami mpo na liwa lya babundi ba makoki mabomoto baye babale, mercredi 12 janvier 2022, na bokolo ya basoda ya Ndolo, na Kinshasa.

Basambeli ya ba parties civiles boboyaki kosamba yambo na komona mokonzi ya kala ya RDC kotelema liboso lya bazuzi mpo atangamaki na moko na ba policiers baye batatolaki, mingi mingi na major Paul Milambwe.

Mokambi ya ba avocats ya parties civiles, Me Richard Bondo asengi ete Joseph Kabila lokola mpe mokambi ya kala ya ANR, auditeur général ya kala Ponde mpe bourgmestre ya commune ya Limete, basamba.

Major Milambwe oyo azokangaki mboka nsima na kokima, atatolaki ete mokonzi ya mboka nde andindaki bobomi boye mpe bato baye basusu mpe bayebaki yango.

VSV (La Vois des Sans voix), ONG Floribert Chebeya akelaka mpe akambaka kino liwa lya ye, esengi mpe na liyebisi ete esengeli bato baye boyokama yambo na bosambisami bokoba.

XS
SM
MD
LG