Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Haute cour militaire eboyi kobengisa Kabila na basusu na bosambisami ya liwa lya Chebeya


Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila na matanga ya mokonzi ya kala ya Zibambwe Robert Mugabe, na Harare, 14 septembre 2019.
Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila na matanga ya mokonzi ya kala ya Zibambwe Robert Mugabe, na Harare, 14 septembre 2019.

Haute Cour militaire ebwakisi bosenga ya bafundi ya komona mokonzi ya kala Joseph Kabila na bato basusu batangami na bobomi ya Floribert Chebeya na Fidèle Bazana koyanola na bazuzi.

Haute cour militaire ezongisi epusi mpe le 26 janvier bobandeli ya bosambisami.

Basambeli ya bafundi (parties civiles) basepeli te na mokano ya Haute cour, elobi Me Richard Bondo.

Mpo na Me Richard Bondo, mokambi ya Haute cour azwi mokano motali bazuzi basusu te kasi mozali nde kaka mayele maye.

Ba avocats ya bafundi balobi bakosenga ete Haute cour militaire epesa ekateli na yango o’mokolo mwa le 26 janvier.

VSV (La Voix de Sans Voix) lingomba lya makoki ma bomoto nkondo Floribert Chebeya akelaka mpe akambaka kino liwa na ye, esengaki mpe bosambisami ya Joseph Kabila na bato basusu major Paul Milambwe atangaki.

Major Milambwe azalaki kosala na secretariat ya mokambi ya police ya ntango wana, general John Numbi mpe alobaka ete amonaka na camera ya surveillance lolenge naninga baye babobamaki MM. Chebeya na Bazana na Inspection générale ya police na Kinshasa.

Major Milambwe abakisaki na bosambisami ete M. Kabila nde atindaki bobomi yango na général Numbi, na bato basusu.

XS
SM
MD
LG