Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kolata masque ekomi lotomo na Sud-Kivu nsima na moto ya misato ya COVID-19


Bato babale bazo'tambola na ba masques na zolo mpe monoko na Bukabu, Sud-Kivu, 8 avril 2020. (VOA/Ernest Muhero)
Bato babale bazo'tambola na ba masques na zolo mpe monoko na Bukabu, Sud-Kivu, 8 avril 2020. (VOA/Ernest Muhero)

Mokambi ya Sud-Kivu, Théo Ngwabidje asakoli ete kolata masque ekomi lotomo na etuka na ye nsima na moto ya misato komonisa na coronavirus ya sika.

M. Ngwabijde eyebisi été moto ya misato azwami na corovirus ya sika na Sud-Kviu. Sango yango epesameli ya na INRB, institut nationale des recherches scientifiques.

Kolanda Malabo ya gouverneur Ngwabidje, ezali mwasi moko awutaki Kigali. Mwasi yan go asitiyamaki na bobombami kasi bilembo ya laboratoire bipesamaki kaka lobi na butu.

Gouverneur asengi baye banso bazalaki nzinganzonga na mwasi oyo komilaki mpo balandelama mpe asakoli ete bozipi zolo na monoko na masque bokomi lotomo mpo na baye bakotambola na nzela na etuka naye kobanda mposo mokoya.

Nzokande bato 183 nde bayebani kozwama na COVID-19 na ekolo Congo démocratique mobimba, esakoli INRB na bulletin na yango ya mardi na mpokwa.

Bato basato nde babakisamaki lobi. Bato tuku mibale bakufi, zomi babikisami, kati na bango ministre ya Economie Accacia Bandubola, nkama moko na zomi na moko bazali na nzela ya kobika, tuku misato na libwa batiyami na appareil ya kopema.

Ekolo Congo démocraique nde ezali na taux ya bawei mingi koleka na Afrika.

XS
SM
MD
LG